fbpx

Totalaka bana ya ofele

Est ce que olingi mutu atala mwana na yo po ozua temps ya ko kota Programme ya ko Yekola Anglais po na Batu Mikolo oyo ba ye Mboka oyo ko Uta Bipayi Misusu (Adult Migrant English Program [AMEP])? Tokoki ko tala bana mike na ba tango oyo ozali na ba classes na yo.

Na tango oko kutana na biso, toko lobela yo nini esengeli po na kotala mwana na yo, po ete okoka ko tanga malamu.

Kosunga yo na ba classes oyo ozo zua na ndako na yo

Ba professeurs oyo ba tangisaka na ba ndako ya batu, bakoki koya ko sunga yo na ndaku na makambo oyo ozali ko tanga. Musala na bango ezali OFELE, pe, bakoki ko pesa yo lisungi  ya kati oyo esengeli ozua po na oyeba koloba malamu koleka. Toko pesa yo professeur oyo asengeli na bosengi na yo.

Ba Regles ya Munoko oyo esengeli ko Loba po na komema na Nzela ya Mosala na Formation (Settlement Language Pathways to Employment and Training [SLPET])

Po na kosunga yo na ndenge esengeli po ovanda na Australie Malamu, okoki ko kota na Programme oyo ya Ba Regles ya Munoko oyo esengeli ko Loba po na komema na Nzela ya Mosala na Formation (Settlement Language Pathways to Employment and Training [SLPET]). Programme oyo eko bakisa jusqu’a 200 heures misusu ya ba cours ya Anglais na oyo esengeli ozwa deja, kasi, ekozala na focus na likambo oyo etali koloba Anglais po na mosala. SLPET epesaka pe 80 heures ya expériences ya musala, eko tiya yo na bisika ebele oyo okoki ko sala, po esunga yo oyeba ndenge nini misala ezalaka na Australie pe ndenge nini bato basalaka.

Ba programme Spécial ya Preparation

Ba programme spécial ya preparation epesaka jusqu’a 400 heures po na  kokolisa Anglais na minoko ya batu oyo bayaki Australie neti  ba clients na biso ya humanitaire, po na ko reconnaître ndenge na bango ya ko tanga, na lisungi oyo ba sengeli likolo ya ba pasi oyo ba monaki avant ba changer mboka, ba pasi neti ba traumatisme, ba torture, to/pe ba pasi avant yako kende kelasi

Ba Classes po na bana oyo bazali na 18 ans to na se

Ba immigrants to pe batu oyo ba ye australie po na kosunga bato, ba oyo bazali na âge entre 15 ans na 17 ans, Pe ba yebi Anglais malamu te, pe que ecole oyo bazali ko kende ezali ko sunga bango malamu te, Bakoki ko kota na programme na biso oyo. Ko kota na programme oyo esengaka ete to tala cas na cas na ndenge esengeli. To talaka pe situation ya mutu, pe, to koloba na ba écoles misusu oyo ezali pembeni na biso.

Soki olingi ko yeba makambo misusu oyo etali ba services misusu oyo to pesaka, benga biso na 1300 585 868.

Start typing and press Enter to search