fbpx

Ba changements na kati ya  Programme ya ko Yekola Anglais po na Batu Mikolo oyo ba ye Mboka oyo ko Uta Bipayi Misusu (Adult Migrant English Program [AMEP]).

Na Juillet 2017, Gouvernement ya Australie echangaki ndenge ba etudiants na kati ya Programme ya ko Yekola Anglais po na Batu Mikolo oyo ba ye Mboka oyo ko Uta Bipayi Misusu (Adult Migrant English Program [AMEP]) ba zuaka ba examens. Ba etudiants oyo ba bandaki ko sala ba examens na se ya Koloba na ko Koma Anglais (Spoken and Written English [CSWE]), ba ko banda ko sala ba examens na se ya Cadre ya ba Compétences ya Base na Australie (Australian Core Skills Framework [ACSF]).

Cadre ya ba Compétences ya Base na Australie (Australian Core Skills Framework [ACSF]) Ezali nini?

Cadre ya ba Compétences ya Base na Australie (Australian Core Skills Framework), to pe ACSF, Emesuraka ba niveaux na yo na likambo oyo etali ko yekola, ko tanga, ko koma, ko loba, na ko calculer. To salelaka pe yango po na ko calculer niveau na yo ya ko loba Anglais po to mona musala ya ndenge nini okoki ko zua, pe ndenge nini okoki ko reussir na musala.

Zua avantage ya Cadre ya ba Compétences de Base na Australie (Australian Core Skills Framework)

ACSF ezali programme eyebani makasi na musala oyo ezalaka po na ko tangisa misala ya maboko oyo esengeli na ba formation, pe, toko tala niveau na yo ndenge yo na tango oko banda ko appliquer po na ko tanga makambo misusu, ba formation, yo te musala. Ko changer ndenge AMEP asalisaka ba examens na ye po ba étudiants ba salaka yango na ndenge ya ACSF eko sunga ba etudiants ba kota ba formation misusu, ba kelasi, na ba opportunites ya misala ya ndenge na ndenge.

Ndenge nini changement oyo eko affecter yo?

Ba etudiants ba bandaki ko tanga na Programme ya ko Yekola Anglais po na Batu Mikolo oyo ba ye Mboka oyo ko uta Bipayi Misusu (Adult Migrant English Program) avant Juillet 2017 pe ba zuaki ba  examens na se ya certificat  Koloba na ko Koma Anglais (Spoken and Written English [CSWE]), bako banda ko zua ba examens na se ya Cadre ya ba Compétences de Base na Australie (Australian Core Skills Framework)  Ba kelasi ozuaki na se ya CSWE eko ndimama, pe, objectif ya kelasi na ye eko koma na ndenge ya Cadre ya ba Compétences de Base na Australie (Australian Core Skills Framework)

Po na ba étudiants oyo bako banda ko tanga na  Programme ya ko Yekola Anglais po na Batu Mikolo oyo ba ye Mboka oyo ko uta Bipayi Misusu (Adult Migrant English Program) apres Juillet 2017, bango bako banda  ko zua ba examens na se ya ACSF mbala moko.

Mituna?

Soki olingi ko yeba makambo misusu na likambo oyo etali ba changement oyo, okoki ko komela biso na amep@stepsgroup.com.au to pe ko benga biso na 1300 585 868. Soki ozali na posa ya traducteur, Benga Musala ya Traduction na Interpretation (Translating and Interpreting Service ([TIS National]) na 131 450 avant obenga biso.

Start typing and press Enter to search