fbpx

STEPS Group Australia (STEPS) ezali organization a but non-lucratif. STEPS esalaka nyonso po na ko tiya différence, pe na ko pesa batu ba opportunités ya sika.

STEPS asalaka nyonso po ete asunga na ndenge esengeli, pe ete, mikanda na ye nyonso na likambo oyo etali ba contract na ye ya musala ya STEPS etikala malamu. Po na ko kokisa likambo oyo, STEPS atya en place systeme ya management oyo alandelaka mikano oyo esengeli na nzela eza malamu na STEPS ISO 9001:2008 systeme ya qualite de management; AS/NZS 4801:2001 Systeme ya management ya santé pe sécurité; AS/NZS ISO14001: 2004 Systeme ya management ya sécurité; Ba Services ya mboka oyo etalaka ndenge ya ko salisa batu ya bokono ya ndenge na ndenge (NSDS);  Cadre ya qualite ya misala ya batu (HSQF) Pe, Ndenge ya malamu ya ko s’enregister na ba forrmation d’entreprise (RTOs). S/NZS 4801:2001

STEPS ayebi que qualite ezali déterminé epayi ya ba clients. Yango wana, to ko encourager bino ete bo yebisa biso soki tozo sala malamu to pe malamu te. Bo  yebisa biso soki likambo ezali ko déranger bino, bo se plaindre. Makambo nyonso wana eko sunga biso ko changer ndenge tosalisaka bino, pe tozala malamu ko leka. Ko yebisa ba clients na biso ndenge  ya ko yebisa biso makambo nyonso, ko zua ba information, ko repondre na nyonso pe ko pesa ba resolution na ba plainte ezali malamu po ete to continuer ko sunga na ndenge esengeli.

STEPS ako sala nyonso po ete mikano oyo ezuama:

  1. Ko encourager ba clients na batu basalisaka STEPS, ba yebisa biso ndenge tozo sala pe ba se plaindre soki ba lingi. likambo oyo ekoki ko salema na ndenge ya ko komela biso:
  2. Papier ya ko remplir po na ko yebisa biso ndenge tozo sala.
  3. Na nzela ya email cso@stepsgroup.com.au
  4. Na nzela ya site internet na biso ‘ Contacter Biso ‘
  5. Na nzela ya ko komela biso mukanda

Soki olingi ko lobela yango en face

  1. Yaka ko loba en face na mutu oyo asalaka na STEPS
  2. Na nzela ya ko loba na manageur to pe coordinateur na telephone
  3. Na nzela ya telephone, benga services a la clientele ya STEPS na 07 5458 3000
  4. Yeba ete que makambo nyonso boyebisaka biso, ezala malamu to pe malamu te, esungaka biso to sunga bino na ndenge ya malamu ko leka.
  5. Ko sala ete batu nyonso oyo basalaka na STEPS ba comprendre ndenge ya malamu, na tango ya malamu, pe na ndenge ya ko loba na se, makambu nyonso eko sunga batu oyo to salisaka. Objectif  na biso ezali ko sunga ba clients na biso, yeba ete likambo ya mabe te eko koma.
  6. Ko sala ete  makambo nyonso batu ba yebisi biso na ndenge tozali kosala, to pe ba ko se plaindre, esala ete pe etiya batu nyoso ya STEPS na nzela oyo ya ko reconnaitre makambo nyonso ba lobi.
  7. Ko yebisa  ba clients na biso ba services ya libanda.oyo epesaka ba résolution ya ba complainte. Neti esengami na se ya ba regles to pe contract na biso.
  8. ko zala juste na likambo etali complainte nyonso, na tango ya malamu, na ko ganga te, trop souvent na kati ya 10 jours ( ya musala) oyo to zui complainte. Soki complainte ezui tango mulayi avant to resoudre yango, esengeli to yebisa client to pe mutu, to pe entreprise oyo esalisaka biso, que ezo wumela.
  9. Ko établir ba mesures ya ba objectifs ya makambo nyonso bozo yebisa biso po ete musala ya management ezala malamu na likambo oyo etali boyebisi na biso’ to pe ba complainte nyonso. Nyonso oyo ezali po to salisa batu malamu ko leka.

Start typing and press Enter to search